Matthew 8:23-27
23Bongo Yesu amataki na bwato mpe bayekoli na ye balandaki ye. 24Na mbala moko, mopepe ya makasi ebandaki koleka na ebale, na ndenge ete mbonge ezalaki komata likolo koleka bwato. Kasi Yesu azalaki kolala pongi. 25Bayekoli bapusanaki pene-pene na ye mpe balamusaki ye ; balobaki : —Nkolo, bikisa biso, tolingi kokufa ! 26Kasi yesu azongisaki : —Bato ya kondima moke ! Mpo na nini bozali kobanga ? Atelemaki, agangelaki mopepe na ebale, mpe kimia ezongaki. 27Bato bakamwaki mpe batunaki : —Yango moto oyo azali nani, mpo ete mopepe na ebale etosa ye ?Yesu aleki milimo mabe na makasi
(Mk. 5.1-20 ; Lk. 8.26-39)
Copyright information for
LinMNB