‏ Matthew 9:1-6

Yesu abikisi moto akufa makolo mpe alimbisi masumu na ye

(Mk. 2.1-12 ; Lk. 5.17-26)

1Yesu amataki na bwato, akatisaki ebale mpe akendaki na vile na ye. 2Bamemelaki ye moto moko akufa makolo, oyo azalaki ya kolala na mbeto. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na moto oyo akufa makolo :

—Mwana na ngai, yika mpiko, masumu na yo elimbisami !

3Mpo na yango, balakisi mosusu ya Mibeko babandaki koloba-loba na nse ya mitema : “A a, moto oyo azali kotiola Nzambe !” 4Yesu ayebaki makanisi na bango mpe atunaki bango :

—Mpo na nini bozali na makanisi ya mabe na mitema na bino ?
5Eloko nini ezangi pasi mpo na koloba : “Masumu na yo elimbisami”, to koloba : “Telema mpe tambola ?” 6Kasi mpo boyeba ete Mwana ya Moto azali na bokonzi, na mokili, ya kolimbisa masumu…

Bongo alobaki na moto oyo akufa makolo :

—Telema, kamata mbeto na yo, mpe zonga na ndako na yo.

Copyright information for LinMNB