Matthew 9:14-17
14Bongo bayekoli ya Jean bayaki mpe batunaki ye : —Mpo na nini, biso na bafarizeo toboyaka kolia mpo na mabondeli, kasi bayekoli na yo baboyaka kolia te mpo na mabondeli ? 15Yesu azongiselaki bango : —Ndenge nini, bato oyo babengami na mobali oyo abali, bakoki kozala na mawa na tango ye azali elongo na bango ? Kasi tango ekoya, tango bakolongola mobali oyo abali na kati na bango ; bongo nde bakoboya kolia. 16Moto moko te akoki kokamata kitendi ya sika mpona abamba elambaya kala, mpo ete kitendi wana ekopasola elamba ya kala mpe lidusu ekokoma monene. 17Ndenge moko mpe batiaka te vino ya sika na basaki ya kala ▼▼ basaki oyo, bazalaki kosala yango na mposo ya nyama.
; soki te basaki ekopasuka, vino ekosopana mpe basaki ekobeba. Kasi batiaka vino ya sika na basaki mpe ya sika, bongo vino na basaki ekobombama malamu ! Yesu aleki maladi mpe liwa na makasi
(Mk. 5.21-43 ; Lk. 8.40-56)
Copyright information for
LinMNB