‏ Matthew 9:18-26

Yesu aleki bokono mpe kufa na nguya

(Mlk 5.21-43; Lk 8.40-56)

18Wana Yesu azalaki koloba na bango, mokambi moko ayaki ; agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sik’oyo ; yaka, tiela ye loboko, mpe akozonga lisusu na bomoi.

19Yesu atelemaki mpe, elongo na bayekoli na Ye, alandaki mokambi yango.

20Na tango yango kaka, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. Mwasi yango ayaki na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye, 21pamba te azalaki komilobela : — Soki kaka nasimbi elamba na Ye, nakobika na bokono na ngai.

22Yesu atalaki na sima mpe amonaki ye ; alobaki : — Mwana na Ngai ya mwasi, yika mpiko ! Kondima na yo ebikisi yo.

Mpe kaka na tango yango, mwasi yango abikaki na bokono na ye.

23Tango Yesu akomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, amonaki babeti flite mpe bato ebele bazali kotia makelele. 24Alobaki na bango : — Bobima ! Mwana akufi te ; alali nde pongi.

Kasi bato bakomaki kotiola Ye.
25Mpe sima na bango kobima libanda, Yesu akotaki na shambre, asimbaki elenge mwasi na loboko, mpe elenge mwasi yango alamukaki.

26Sango ya likambo yango epanzanaki na etuka wana mobimba.
Copyright information for LinMNB