‏ Matthew 9:9-13

9Bongo Yesu akendaki. Tango azalaki koleka, amonaki moto moko kombo na ye Matie, avandaki na biro oyo bafutiselaka mpaku. Bongo yesu alobaki na ye :

—Landa ngai !

Matie atelemaki mpe alandaki ye.
10Tango yesu azalaki kolia na ndako ya Matie, bafutisi mpaku ebele, na bato ya masumu, bayaki mpe baliaki elongo na Yesu, na bayekoli na ye. 11Tango bafarizeo bamonaki bongo, batunaki bayekoli na ye :

—Mpo na nini moteyi na bino azali kolia elongo na bafutisi mpaku mpe bato ya masumu ?

12Tango yesu ayokaki yango, alobaki :

—Bato ya nzoto malamu bazalaka na posa ya monganga te, kasi ezali bato ya maladi nde bazalaka na posa ya monganga
13Kasi bokende koyekola tina ya maloba oyo : Nalingi bozala bato ya mitema mawa, kasi naboyi mbeka. Pamba te ; nayaki mpo na kobengabato na sembo te, kasi bato ya masumu.

Copyright information for LinMNB