Nehemiah 11:3-19
3Tala bakambi ya bituka oyo bavandaki na Yelusalemi ; nzokande na tango wana, bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi, basali ya Tempelo mpe bakitani ya basali ya Salomo bavandaki kati na bingumba ya Yuda, moko na moko kati na mabele mpe engumba na ye ; 4mpe bato ya Yuda mpe ya Benjame bavandaki kati na Yelusalemi :Mpo na bakitani ya Yuda :
Ataya, mwana mobali ya Oziasi, mwana mobali ya Zakari, mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Shefatia, mwana mobali ya Maalalele, mokitani ya Peretsi ;
5mpe Maaseya, mwana mobali ya Baruki, mwana mobali ya Koli-Oze, mwana mobali ya Azaya, mwana mobali ya Adaya, mwana mobali ya Yoyaribi, mwana mobali ya Zakari, moko kati na bakitani ya Shiloni.
6Bakitani nyonso ya Peretsi oyo bavandaki kati na Yelusalemi bazalaki mibali nkama minei na tuku motoba na mwambe.
7Mpo na bakitani ya Benjame :
Salu, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Yoedi, mwana mobali ya Pedaya, mwana mobali ya Kolaya, mwana mobali ya Maaseya, mwana mobali ya Itieli, mwana mobali ya Ezayi ;
8mpe Gabayi elongo na Salayi. Bango nyonso bazalaki bato nkama libwa na tuku mibale na mwambe.
9Joeli, mwana mobali ya Zikiri, azalaki mokambi na bango ; mpe Yuda, mwana mobali ya Asenuwa, azalaki molandi ya mokambi ya engumba.
10Kati na Banganga-Nzambe :
Yedaeya, mwana mobali ya Yoyaribi, mwana mobali ya Yakini ;
11Seraya, mwana mobali ya Ilikia, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Tsadoki, mwana mobali ya Merayoti, mwana mobali ya Ayitubi, mokambi ya Ndako ya Nzambe 12elongo na bandeko na bango, nkama mwambe na tuku mibale na mibale oyo bazalaki kosala na Ndako ya Nzambe ;
Adaya, mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Pelalia, mwana mobali ya Amitsi, mwana mobali ya Zakari, mwana mobali ya Pashuri, mwana mobali ya Malikiya 13elongo na bandeko na bango, nkama mibale na tuku minei na mibale oyo bazalaki bakambi ya mabota ;
Amashisayi, mwana mobali ya Azareyeli, mwana mobali ya Azayi, mwana mobali ya Meshilemoti, mwana mobali ya Imeri, azalaki mpe elongo na bango. 14Azalaki mpe elongo na bandeko na ye, nkama moko na tuku mibale na mwambe oyo bazalaki basoda ya mpiko. Zabidieli, mwana mobali ya Gedolimi, nde azalaki mokambi na bango.
15Kati na Balevi :
Shemaya, mwana mobali ya Ashubi, mwana mobali ya Azirikami, mwana mobali ya Ashabia, mwana mobali ya Buni ;
16Shabetayi mpe Yozabadi oyo bazalaki na molongo ya bakambi ya Balevi mpe bazalaki na mokumba ya misala ya libanda ya Ndako ya Nzambe ;
17Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Azafi, mokambi oyo azalaki kotinda banzembo ya matondi na tango ya losambo ;
Bakibukia, molandi kati na bandeko na ye mpe Abida, mwana mobali ya Shamuwa, mwana mobali ya Galali mpe mwana mobali ya Yedutuni.
18Balevi nyonso oyo bazalaki kovanda kati na engumba ya bule bazalaki nkama mibale tuku mwambe na minei.
19Bakengeli bikuke :
Akubi, Talimoni elongo na bandeko na bango, oyo bazalaki bakengeli bikuke. Bango nyonso bazalaki bato nkama moko na tuku sambo na mibale.
Copyright information for
LinMNB