Numbers 3:17-20
17Tala bakombo ya bakitani ya Levi :Gerishoni, Keati mpe Merari.
18Tala bakombo ya bakitani ya Gerishoni, kolanda etuka moko na moko :
Libini mpe Shimei.
19Bana mibali ya Keati, kolanda etuka moko na moko :
Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli.
20Bana mibali ya Merari, kolanda etuka moko na moko :
Maali mpe Mushi.
Bango nde bato ya bituka ya Balevi kolanda mabota na bango.
Copyright information for
LinMNB